23 Na yango alobaki na bango ete: “Yango nde Yehova alobi. Lobi ekozala molulu ya sabata, ya sabata moko mosantu mpo na Yehova.+ Oyo bokoki kotumba, bótumba, mpe oyo bokoki kotɔkisa, bótɔkisa,+ mpe nyonso oyo etikali, bóbomba yango mpe bóbatela yango tii na ntɔngɔ.”