Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Misala 4:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ntango bayokaki bongo, batombolaki mingongo na bango na bomoko mpenza epai ya Nzambe+ mpe balobaki ete:

      “Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+ yo ozali Oyo osalaki likoló mpe mabele mpe mbu mpe biloko nyonso na kati na yango,+

  • Misala 14:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe balobaki ete: “Mibali, mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato+ oyo bazali na bolɛmbu+ ndenge moko na oyo ya bino, mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba+ mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi,+ oyo asalaki likoló+ ná mabele ná mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.

  • Emoniseli 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 mpe alapaki ndai na nkombo ya Oyo azali na bomoi+ libela na libela,+ oyo azalisaki likoló ná biloko oyo ezali na kati na yango mpe mabele+ ná biloko oyo ezali na kati na yango mpe mbu ná biloko oyo ezali na kati na yango,+ alobi: “Ntango ya kozela ekozala lisusu te;+

  • Emoniseli 14:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 azali koloba na mongongo makasi ete: “Bóbanga Nzambe+ mpe bókumisa ye,+ mpo ngonga na ye ya kosambisa eyei,+ yango wana bósambela Oyo asalá+ likoló, ná mabele, ná mbu, ná maziba ya mai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto