16 na nyonso oyo osɛngaki Yehova Nzambe na yo na Horebe na mokolo ya lisangá,+ olobi ete: ‘Kotika te nayoka lisusu mongongo ya Yehova Nzambe na ngai, mpe kotika te namona lisusu mɔtɔ monene oyo, mpo nakufa te.’+
38 Ye+ nde azalaki na kati ya lisangá+ na esobe elongo na anzelu+ oyo azalaki koloba na ye na Ngomba Sinai mpe elongo na bankɔkɔ na biso, mpe azwaki maloba mosantu+ ya bomoi mpo na kopesa bino.
19 Bongo ntina ya Mibeko ezali nini? Yango ebakisamaki mpo na komonisa polele makambo ya kobuka mibeko,+ tii ntango momboto oyo bapesaki ye elaka akoya;+ mpe epesamaki na nzela ya baanzelu+ na lobɔkɔ ya moyokanisi.+