Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 18:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 “Mafuta nyonso oyo eleki kitoko mpe vinyo nyonso ya sika oyo eleki kitoko mpe mbuma, mbuma na bango ya liboso,+ oyo bakopesa Yehova, napesi yo yango.+

  • Masese 3:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya+ mpe na mbuma ya liboso ya biloko na yo nyonso.+

  • Ezekiele 44:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe mbuma oyo eleki malamu na mbuma ya lolenge nyonso ya liboso oyo eteli mpe makabo oyo eleki malamu na makabo ya lolenge nyonso, na makabo na bino nyonso—ekozala ya banganga-nzambe;+ mpe farini ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na bino ya liboso, bokopesa yango nganga-nzambe,+ mpo na kofandisa limpamboli na ndako na yo.+

  • 1 Bakorinti 15:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Nzokande, sikoyo Kristo alamuki uta na bakufi,+ mbuma ya liboso+ ya baoyo balali na kati ya liwa.+

  • Yakobo 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Lokola alingaki+ bongo, abotaki biso na nzela ya liloba ya solo,+ mpo tózala na kati ya mbuma ya liboso+ ya bikelamu na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto