Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 12:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Mpe kuna bosengeli komema makabo na bino ya kotumba+ mpe bambeka na bino mpe moko ya bandambo zomi+ na bino mpe likabo ya lobɔkɔ+ na bino mpe makabo na bino ya elako+ mpe makabo na bino ya bolingo+ mpe bana ya liboso ya etonga na bino ya bangɔmbɛ mpe ya etonga na bino ya bampate.+

  • 1 Ntango 29:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bato basepelaki na ndenge bazalaki kopesa makabo ya bolingo, mpo ezalaki na motema mobimba nde bazalaki kopesa Yehova makabo ya bolingo;+ mpe ata mokonzi Davidi ye moko asepelaki na esengo monene.+

  • 2 Ntango 35:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe bankumu+ na ye bapesaki mpo na bato, banganga-nzambe mpe Balevi likabo ya bolingo.+ Hilikiya,+ Zekaria ná Yehiele oyo bazalaki bakambi ya ndako ya Nzambe ya solo bapesaki banganga-nzambe bampate ná bantaba nkóto mibale na nkama motoba (2 600), mpe bangɔmbɛ nkama misato (300), mpo ezala banyama ya elekeli.

  • Ezera 2:68
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 68 Mpe bamosusu kati na bankumu+ ya bandako ya batata,+ ntango bakómaki na ndako ya Yehova,+ oyo ezalaki na Yerusaleme,+ bapesaki makabo ya bolingo+ mpo na ndako ya Nzambe ya solo, mpo na kotɛlɛmisa yango na esika na yango mpenza.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto