-
Nehemia 8:15Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 mpe ete basengeli kosakola+ mpe kobelela na bingumba na bango nyonso mpe na Yerusaleme+ mobimba ete: “Bókende na etúká ya ngombangomba+ mpe bóya na nkasa ya olive,+ nkasa ya banzete ya mafuta, nkasa ya mirte, nkasa ya mbila ná nkasa ya banzete oyo etondá na nkasa, mpo na kosala mwa bandako ya matiti, ndenge ekomamá.”
-
-
Emoniseli 7:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato,+ oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso+ mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso+ mpe na minɔkɔ nyonso,+ batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi+ mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ;+ mpe basimbi mandalala+ na mabɔkɔ.
-