Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 21:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Akoki kolya limpa ya Nzambe na ye oyo euti na biloko oyo eleki bosantu+ mpe oyo euti na biloko mosantu.+

  • Balevi 22:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘Mopaya moko te akoki kolya eloko mosantu.+ Moto moko te oyo autá na mboka mosusu, oyo azali epai ya nganga-nzambe, to mosali moko te oyo azwaka lifuti, akoki kolya eloko mosantu.

  • 1 Samwele 21:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na yango, nganga-nzambe apesaki ye oyo ezali mosantu,+ mpamba te kuna mampa mosusu ezalaki te, kaka mampa ya kolakisa oyo elongolamaki liboso ya Yehova+ mpo bátya mampa ya sika wana, na mokolo oyo balongolaki yango.

  • Matai 12:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe balyaki mampa ya kolakisa,+ eloko oyo asengelaki kolya te,+ ye ná bato oyo bazalaki elongo na ye, longola kaka banganga-nzambe?+

  • Luka 6:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Ndenge akɔtaki na ndako ya Nzambe mpe azwaki mampa ya kolakisa,+ oyo mibeko epekisaki moto alya longola kaka banganga-nzambe,+ mpe alyaki yango mpe apesaki bato oyo bazalaki elongo na ye ndambo?”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto