Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 37:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mokolo mobimba azali komonisa boboto mpe azali kodefisa,+

      Bongo bana na ye bakozwa lipamboli.+

  • Nzembo 112:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  5 Moto oyo azali na ngɔlu+ mpe azali kodefisa+ azali moto malamu.

      י [Yod]

      Atambwisaka makambo na ye na bosembo.+

  • Masese 3:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Koboya te kosala malamu na baoyo basengeli na yango,+ ntango lobɔkɔ na yo ezali na nguya ya kosala yango.+

  • Masese 14:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Ye oyo azali kobuba moto oyo azangá asambwisi Mokeli na ye,+ kasi moto oyo azali komonisela mobola boboto azali kopesa Ye nkembo.+

  • Luka 6:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Nzokande, bino bókoba kolinga banguna na bino mpe kosala malamu mpe kodefisa+ kozanga koluka benefisi, kozanga ete bólikya kozwa mwa eloko na nsima; mpe mbano na bino ekozala ya monene, mpe bokozala bana ya Oyo-Aleki-Likoló,+ mpo ye asalelaka bato oyo bazangi botɔndi mpe bato mabe makambo na boboto.+

  • Misala 11:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bongo bayekoli mosusu bazwaki mokano, moto na moto na kolanda oyo azalaki na yango,+ ya kotindela bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea biloko ya lisungi;+

  • 1 Timote 6:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 básala makambo ya malamu,+ bázala bazwi na misala ya malamu,+ bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba,+

  • 1 Yoane 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Kasi moto nyonso oyo azali na biloko ya kobikela ya mokili oyo+ mpe amoni ndeko na ye azali kokelela+ mpe atako bongo akangeli ye mpenza motema,*+ ndenge nini bolingo ya Nzambe ekoki kofanda na kati na ye?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto