Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 29:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe osengeli kozwa mafuta nyonso+ oyo ezipi misɔpɔ,+ ná mafuta ya libale,+ ná mimpíko mibale ná mafuta oyo ezali likoló na yango, mpe osengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo.+

  • Balevi 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe asengeli kopesa Yehova ndambo ya mbeka ya boyokani lokola likabo oyo etumbami na mɔtɔ, elingi koloba, mafuta+ oyo ezipi misɔpɔ, ɛɛ mafuta nyonso oyo ezali likoló ya misɔpɔ,+

  • Balevi 6:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe mɔtɔ oyo ezali likoló ya etumbelo, ekokoba kopela likoló na yango. Yango esengeli kokufa te. Mpe nganga-nzambe asengeli kotumba nkoni+ likoló na yango ntɔngɔ nyonso mpe kotya likabo ya kotumba na molɔngɔ likoló na yango, mpe asengeli kosala ete biteni ya mafutamafuta ya mbeka ya boyokani ebimisa milinga likoló na yango.+

  • Balevi 9:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe asalaki ete mafuta+ ná mimpíko mpe mafuta ya libale oyo euti na likabo mpo na lisumu ebimisa milinga likoló ya etumbelo,+ kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto