Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe asengeli kotya lobɔkɔ na ye na motó ya likabo ya kotumba, mpe basengeli kondimela+ ye yango na esengo mpo na kozipa masumu na ye.+

  • Balevi 4:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe akosala ete mafuta na yango nyonso ebimisa milinga likoló ya etumbelo lokola mafuta ya mbeka ya boyokani;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipela ye lisumu na ye,+ bongo akolimbisama.

  • Balevi 4:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe akolongola mafuta+ na yango nyonso, kaka ndenge balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani;+ mpe nganga-nzambe asengeli kosala ete yango ebimisa milinga likoló ya etumbelo mpo ezala nsolo moko ya kokitisa Yehova motema;+ mpe nganga-nzambe asengeli kozipa lisumu na ye, bongo akolimbisama.+

  • Balevi 6:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu+ na ye liboso ya Yehova, mpe bongo asengeli kolimbisama na kotalela moko na makambo nyonso oyo akoki kosala, oyo ekomemisa ye ngambo na yango.”

  • Balevi 16:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpo na mokolo yango, masumu na bino ekozipama+ mpo na kotánga bino pɛto. Bokozala pɛto mpe bokolongwa na masumu nyonso na bino liboso ya Yehova.+

  • Mitángo 15:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe nganga-nzambe asengeli kozipa masumu ya molimo oyo asali libunga na lisumu moko boye, na nko te, liboso ya Yehova, mpo na kozipa yango, mpe basengeli kolimbisa ye yango.+

  • Bakolose 1:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 oyo na nzela na ye tosikolami na nzela ya lisiko, tolimbisami masumu na biso.+

  • 1 Yoane 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe ye azali mbeka+ mpo na kozipa+ masumu na biso,+ kaka oyo ya biso moko te,+ kasi mpe oyo ya mokili mobimba.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto