Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 37:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Oyo ezali lisolo ya Yakobo.

      Yozefe,+ wana azalaki na mbula zomi na nsambo, azalaki kobatela bampate ya etonga elongo na bandeko na ye,+ mpe, lokola azalaki elenge, azalaki elongo na bana ya Bila+ mpe bana ya Zilipa,+ basi ya tata na ye. Bongo Yozefe amemelaki tata na bango nsango mabe ya makambo na bango.+

  • 1 Samwele 2:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Te,+ bana na ngai, mpamba te nsango oyo nazali koyoka ezali malamu te, nsango oyo bato ya Yehova bazali kotambwisa.+

  • Estere 6:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nsukansuka, bamonaki esika oyo bakomá makambo oyo Mordekai ayebisaki+ na ntina na Bigitana ná Tereshe, basali mibale ya mokonzi,+ bakɛngɛli ya baporte, oyo balukaki kosala Mokonzi Ahasueruse mabe.

  • Masese 29:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Ye oyo azali koyokana na moyibi azali koyina molimo na ye moko.+ Akoki koyoka ndai oyo ekangani na elakeli mabe, kasi azali koyebisa eloko te.+

  • 1 Bakorinti 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Mpo bato ya ndako ya Klowe bayebisi+ ngai makambo na bino, bandeko na ngai, ete bokabwani ezali na kati na bino.

  • 1 Bakorinti 5:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ya solo, nsango eyokani ete pite+ ezali na kati na bino, mpe pite ya ndenge oyo ezalaka ata kutu te epai ya bikólo, ete mobali moko akamati mwasi ya tata na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto