Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 27:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Mpe osengeli kosala lopango+ ya tabernakle. Mpo na ngámbo oyo etali Negebe, epai ya sudi, lopango ezali na barido ya lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá;+ bolai ya mopanzi moko mapeko nkama moko (100).

  • Kobima 38:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe abandaki kosala lopango.+ Na ngámbo oyo etali Negebe, epai ya sudi, barido ya lopango ezalaki ya lini ya kitoko oyo elíngamalíngamá, ya mapeko nkama moko (100).+

  • Kobima 40:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Nsukansuka atɛlɛmisaki lopango+ zingazinga na tabernakle ná etumbelo mpe atyaki elamba ya kozipa monɔkɔ ya lopango.+

      Bongo Moize asilisaki mosala.

  • Ezekiele 42:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe alobaki na ngai boye: “Bisika ya kolya ya nɔrdi mpe bisika ya kolya na sudi oyo ezali liboso ya esika oyo ekabwani,+ yango ezali bisika ya kolya oyo ezali mosantu, esika banganga-nzambe oyo bazali kobɛlɛma+ na Yehova balyaka biloko oyo eleki bosantu.+ Kuna nde batyaka biloko oyo eleki bosantu mpe likabo ya mbuma ná likabo mpo na lisumu ná likabo mpo na ngambo, mpamba te esika yango ezali mosantu.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto