Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 30:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bosengeli te kopesa likoló na yango mpaka ya malasi oyo mobeko epekisi+ to likabo ya kotumba to likabo ya mbuma; mpe bosengeli te kosopa likabo ya masanga likoló na yango.

  • Balevi 10:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Komɛla vinyo te to masanga oyo elangwisaka,+ yo ná bana na yo ya mibali elongo na yo, ntango bokokɔta na hema ya kokutana, mpo bókufa te. Yango ezali mobeko mpo na ntango oyo etyami ndelo te na boumeli ya mabota na bino,

  • Balevi 16:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+

  • Yisaya 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ná baoyo mpe—mpo na vinyo babungi nzela mpe mpo na masanga oyo elangwisaka batelengani. Nganga-nzambe mpe mosakoli+—babungi nzela mpo na masanga oyo elangwisaka, babulungani mpo na vinyo, batelengani+ mpo na masanga oyo elangwisaka; babungi nzela na bimonaneli na bango, bazwi kizunguzungu mpe bayebi ekateli te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto