7 Na nsima, Moize alobaki na Arona ete: “Bɛlɛmá na etumbelo mpe pesá likabo na yo mpo na lisumu+ mpe likabo na yo ya kotumba, mpe zipá masumu+ na yo moko mpe ya ndako na yo; mpe pesá likabo ya bato+ mpe zipá masumu+ na bango, kaka ndenge Yehova apesi mitindo.”