22 Mpe esalemaki boye: ntango Yisraele azalaki kofanda na bahema+ na mokili yango, Rubene akendaki kolala na Bila makango ya tata na ye, mpe Yisraele ayokaki likambo yango.+
Bongo bana mibali ya Yakobo bazalaki zomi na mibale.
11 Mpe mobali oyo alali na mwasi ya tata na ye, amoni bolumbu ya tata na ye.+ Bango mibale basengeli mpenza kobomama. Makila na bango ezali na motó na bango.
21 Bongo Ahitofele alobaki na Abisalome ete: “Sangisá nzoto na bamakango ya tata na yo,+ oyo atikaki mpo bábatela ndako.+ Bongo Yisraele mobimba ekoyoka mpenza ete omikómisi eloko ya nsolo mabe+ epai ya tata na yo,+ mpe mabɔkɔ+ ya bato oyo bazali elongo na yo ekozwa mpenza nguya.”
5Ya solo, nsango eyokani ete pite+ ezali na kati na bino, mpe pite ya ndenge oyo ezalaka ata kutu te epai ya bikólo, ete mobali moko akamati mwasi ya tata na ye.+