13 “Kasi yo, lobá na bana ya Yisraele ete: ‘Mingimingi, bokobatela basabata na ngai,+ mpo ezali elembo kati na ngai ná bino na boumeli ya mabota na bino mpo bóyeba ete ngai Yehova nazali kosantisa bino.+
8 Boye osengeli kosantisa ye,+ mpo ye nde apesaka limpa ya Nzambe na yo. Asengeli kozala mosantu mpo na yo,+ mpamba te ngai Yehova, moto nazali kosantisa bino, nazali mosantu.+
23 Nzambe ya kimya+ asantisa bino mobimba.+ Mpe na makambo nyonso, tiká elimo mpe molimo mpe nzoto na bino bandeko ebatelama na ndenge ya kozanga mbeba na ntango ya kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo.+
13 Nzokande, biso tosengeli kopesa Nzambe matɔndi ntango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Yehova alingi, mpamba te Nzambe aponaki bino+ banda na ebandeli mpo na lobiko na ndenge asantisaki+ bino na elimo+ mpe na nzela ya kondima na bino na kati ya solo.+