9 “‘Mpo na bolumbu ya ndeko na yo ya mwasi, mwana ya tata na yo to mwana ya mama na yo, ezala abotami na yo ndako moko to abotami na ndako mosusu, osengeli komona bolumbu na bango te.+
12 Kasi, ye alobaki na ye ete: “Te, ndeko na ngai! Kosambwisa+ ngai te; mpo basalaka bongo te na Yisraele.+ Kosala likambo ya bozoba mpe ya nsɔni boye te.+
11 Mpe mobali asali likambo oyo eyinamá elongo na mwasi ya moninga na ye,+ mpe mobali akómisi mwasi ya mwana na ye moko mbindo na etamboli ya nsɔni;+ mpe epai na yo, mobali asambwisi ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye mpenza.+