Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Yango wana nalobi ete: Nakolongola bino na mpasi+ ya Baezipito mpe nakomatisa bino kino na mokili ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore+ ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi,+ kino na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.”’+

  • Kobima 13:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe ekosalema mpenza boye: ntango Yehova akokɔtisa bino na mokili ya Bakanana mpe ya Bahiti mpe ya Baamore mpe ya Bahivi mpe ya Bayebusi,+ oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai ete akopesa yo,+ mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ bongo osengeli kosala molulu oyo ya losambo na sanza oyo.

  • Kolimbola Mibeko 8:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 mokili moko ya blé mpe ya ɔrje mpe ya banzete ya vinyo mpe ya bafigi mpe ya bagrenade,+ mokili moko ya mbuma ya olive oyo etondi na mafuta mpe ya mafuta ya nzoi,+

  • Yirimia 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Kende, mpe osengeli kobelela na matoi ya Yerusaleme ete: ‘Talá oyo Yehova alobi:+ “Nazali kokanisa lisusu motema boboto ya bolenge na yo,+ bolingo oyo omonisaki ntango olakamaki libala,+ ndenge ozalaki kotambola nsima na ngai na esobe, na mokili oyo baloná mboto te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto