Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 22:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 ‘Talá! Bato oyo bazali kobima na Ezipito, mpe bazipi mabele tii koleka esika oyo liso ekoki komona.+ Sikoyo yaká, lakelá bango mabe mpo na ngai.+ Mbala mosusu nakokoka kobunda na bango mpe nakobengana mpenza bango.’”

  • Mitángo 24:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Na yango, nkanda ya Balake engalelaki Balaama mpe abɛtaki mabɔkɔ na ye,+ mpe Balake alobaki lisusu na Balaama ete: “Nabengaki yo mpo olakela banguna na ngai mabe,+ mpe talá! yo opamboli bango koleka ndelo mbala misato oyo.

  • Yosua 24:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kasi naboyaki koyokela Balaama.+ Yango wana, apambolaki bino mbala na mbala.+ Na bongo, nabikisaki bino na lobɔkɔ na ye.+

  • Nehemia 13:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 mpo bayambaki te bana ya Yisraele na mampa+ mpe na mai,+ kasi bafutaki Balaama+ mpo alakela bango mabe.+ Nzokande, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli.+

  • Nzembo 109:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bango bálakela mabe,+

      Kasi yo, pambolá.+

      Batɛlɛmi, kasi báyoka nsɔni,+

      Mpe mosaleli na yo asepela.+

  • Mika 6:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Ee bato na ngai, nabondeli bino, bókanisa+ oyo Balake mokonzi ya Moabe akanaki kosala,+ mpe oyo Balaama mwana ya Beore ayanolaki ye.+ Bókanisa oyo nasalaki banda Shitime+ tii Gilgale,+ mpo misala ya boyengebene ya Yehova ekoka koyebana.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto