5 Na nsima, alobaki na Kora mpe na liyangani na ye mobimba ete: “Na ntɔngɔ Yehova akoyebisa nani azali moto na ye+ mpe nani azali mosantu+ mpe nani asengeli kobɛlɛma na ye,+ mpe moto oyo ye akopona,+ akobɛlɛma na ye.
19 Ntango Kora ayanganisaki liyangani+ mobimba mpo na kotombokela bango na monɔkɔ ya hema ya kokutana, bongo nkembo ya Yehova emonanaki liboso ya liyangani mobimba.+
11 Mawa na bango, mpo balandi nzela ya Kaina,+ mpe bamibwaki na nzela ya libunga ya Balaama+ mpo na koluka mbano, mpe bakufi mpo na maloba ya botomboki+ ya Kora!+