24 Mpo moko ya bandambo zomi ya bana ya Yisraele, oyo bakopesa Yehova likabo, napesi yango libula na Balevi. Yango wana, nalobi na bango ete: ‘Bakozwa libula te na kati ya bana ya Yisraele.’”+
9 Yango wana, Levi azali na likabo te mpe na libula+ te esika moko na bandeko na ye. Yehova azali libula na ye, kaka ndenge Yehova Nzambe na yo alobaki na ye.+
3 Mpo Moize apesaki libula na mabota mosusu mibale mpe na ndambo mosusu ya libota na ngámbo mosusu ya Yordani;+ kasi apesaki Balevi libula te na kati na bango.+