6 Bakozala basantu mpo na Nzambe na bango,+ mpe bakotuka nkombo ya Nzambe na bango te,+ mpo bango nde bapesaka makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ, limpa ya Nzambe na bango;+ mpe basengeli kozala basantu.+
24 Bokopesa makabo ya ndenge moko na oyo wana mokolo na mokolo na boumeli ya mikolo nsambo lokola limpa,+ likabo oyo etumbami na mɔtɔ, ya nsolo moko ya kokitisa Yehova motema.+ Ekopesama nzela moko na likabo ya kotumba ya ntango nyonso, mpe na likabo na yango ya masanga.