Mitángo 28:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá likabo oyo etumbami na mɔtɔ oyo bokopesa Yehova: bana-mpate mibale ya mibali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula moko, mokolo na mokolo ezala likabo ya kotumba ya ntango nyonso.+ Danyele 8:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpe etombolaki mapeka tii epai ya Nkumu+ ya limpinga, mpe mbeka ya ntango nyonso+ elongolamaki epai na ye, mpe esika ya libela ya esika na ye mosantu ekweisamaki.+ Danyele 11:31 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Mpe mabɔkɔ euti epai na ye ekotɛlɛma; mpe ya solo bakokómisa esika mosantu eloko mpamba,+ ndako makasi, mpe bakolongola mbeka ya ntango nyonso.+ “Mpe bakotya mpenza eloko ya bosɔtɔ+ oyo ezali koyeisa libebi.+ Danyele 12:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 “Mpe banda ntango oyo mbeka ya ntango nyonso+ ekolongolama+ mpe ntango oyo eloko ya bosɔtɔ+ oyo eyeisaka libebi ekotyama, ekozala mikolo nkóto moko na nkama mibale na ntuku libwa (1 290).
3 “Mpe osengeli koloba na bango ete: ‘Talá likabo oyo etumbami na mɔtɔ oyo bokopesa Yehova: bana-mpate mibale ya mibali, oyo ezangi mbeba, oyo ezali na mbula moko, mokolo na mokolo ezala likabo ya kotumba ya ntango nyonso.+
11 Mpe etombolaki mapeka tii epai ya Nkumu+ ya limpinga, mpe mbeka ya ntango nyonso+ elongolamaki epai na ye, mpe esika ya libela ya esika na ye mosantu ekweisamaki.+
31 Mpe mabɔkɔ euti epai na ye ekotɛlɛma; mpe ya solo bakokómisa esika mosantu eloko mpamba,+ ndako makasi, mpe bakolongola mbeka ya ntango nyonso.+ “Mpe bakotya mpenza eloko ya bosɔtɔ+ oyo ezali koyeisa libebi.+
11 “Mpe banda ntango oyo mbeka ya ntango nyonso+ ekolongolama+ mpe ntango oyo eloko ya bosɔtɔ+ oyo eyeisaka libebi ekotyama, ekozala mikolo nkóto moko na nkama mibale na ntuku libwa (1 290).