16 Lisusu, fɛti ya kobuka mbuma ya liboso oyo eteli+ ya misala na yo ya makasi, ya biloko oyo olonaki na elanga;+ mpe fɛti ya koyanganisa mbuma na nsuka ya mbula, ntango okoyanganisa mbuma ya misala na yo ya makasi na elanga.+
13 “Mikolo nsambo, okosala fɛti ya mwa bandako ya matiti+ ntango okoyanganisa mbuma ya esika na yo ya kotutatuta mbuma mpe ya ekamwelo na yo ya mafuta mpe ya vinyo.
14 Bongo bamonaki ete ekomamá na mobeko oyo Yehova apesaki na nzela ya Moize+ ete bana ya Yisraele basengeli kofanda na mwa bandako ya matiti+ na fɛti ya sanza ya nsambo,+