7 Bongo mikóló ya Moabe mpe mikóló ya Midiane basalaki mobembo mpe na mabɔkɔ na bango bazalaki na lifuti ya kopesa moto oyo akosakola makambo oyo ebombaná+ mpe bakendaki epai ya Balaama+ mpe bayebisaki ye maloba ya Balake.
18 mpamba te bazali kotungisa bino na misala na bango ya mayele mabe+ oyo basalelaki bino na mayele mabe na likambo ya Peore+ mpe na likambo ya Kozibi+ mwana mwasi ya nkumu ya Midiane, ndeko na bango oyo abomamaki+ na mokolo ya bolɔzi mpo na likambo ya Peore.”+
14 “‘Kasi nazwi yo mabe na mwa makambo oyo: ozali na bato kuna oyo basimbi makasi mateya ya Balaama,+ oyo ateyaki Balake+ atyela bana ya Yisraele eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, mpo bálya biloko oyo epesami mbeka na bikeko mpe básala pite.+