Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Mitángo 26:55
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 55 Mokili ekokabolama kaka na kobwakáká mbɛsɛ.+ Bakozwa libula na kolanda bankombo ya mabota ya batata na bango.

  • Mitángo 33:54
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 54 Mpe bino bosengeli kokabola mokili yango ezala ya bino na kobwakáká mbɛsɛ,+ engebene mabota na bino.+ Moto oyo azali na bato mingi, bokobakisa libula na ye, mpe moto oyo azali na bato moke, bokokitisa libula na ye.+ Esika oyo mbɛsɛ ekobimisa mpo na ye, esika yango ekozala ya ye.+ Bokozwa mabele na kolanda mabota ya batata na bino.+

  • Yosua 14:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Libula na bango ekabolamaki na nzela ya mbɛsɛ,+ ndenge Yehova apesaki mitindo na nzela ya Moize mpo na mabota libwa mpe mpo na ndambo moko ya libota.+

  • Yosua 18:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nde bino, bokosala kartɛ ya mokili yango na biteni nsambo, mpe bokoya na yango awa epai na ngai, bongo ngai nakobwaka mbɛsɛ+ mpo na bino awa, liboso ya Yehova Nzambe na bino.

  • Masese 16:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Babwakaka mbɛsɛ+ na kati ya elamba oyo ezipaka bibɛlɔ, kasi ekateli nyonso oyo ebimi na yango eutaka na Yehova.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto