32 “‘Mpo na bingumba ya Balevi ná bandako ya bingumba oyo ezali ya bango,+ lotomo ya kosikola yango ekokoba kozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te mpo na Balevi.+
18“Banganga-nzambe, Balevi, libota mobimba ya Levi, bakozala na likabo mpe na libula elongo na Yisraele te.+ Makabo oyo batumbeli Yehova na mɔtɔ, ɛɛ libula na ye, yango nde bakolya.+
4 Mpamba te bana ya Yozefe bakómaki mabota mibale,+ Manase+ ná Efraime;+ mpe bapesaki Balevi libula te na mokili yango, longola kaka bingumba+ ya kofanda mpe bisika mpo na koleisa bibwɛlɛ na bango matiti mpe mpo na biloko na bango.+
2 mpe balobaki na bango na Shilo,+ na mokili ya Kanana, ete: “Yehova apesaki mitindo na nzela ya Moize ete bápesa biso bingumba ya kofanda, ná bisika na yango ya koleisa banyama na biso ya mboka matiti.”+