Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 25:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Lisusu, elanga ya esika ya koleisa banyama matiti+ ya bingumba na bango ekoki kotɛkama te, mpamba te ezali eloko na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.

  • Yosua 21:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo, na etinda ya Yehova, bana ya Yisraele bapesaki Balevi+ bingumba yango ná bisika ya koleisa banyama matiti na libula na bango.+

  • Yosua 21:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Boye, bapesaki bango Kiriate-arba+ (Arba yango azalaki tata ya Anake),+ elingi koloba: Hebrone,+ na etúká ya ngombangomba ya Yuda,+ ná esika na yango nyonso ya zingazinga mpo na koleisa banyama matiti;

  • 1 Ntango 6:64
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 64 Boye, bana ya Yisraele bapesaki Balevi+ bingumba ná bisika na yango ya koleisa banyama matiti.+

  • 2 Ntango 11:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpo Balevi batikaki bisika na bango ya koleisa banyama matiti+ mpe libula na bango,+ bongo bayaki na Yuda mpe Yerusaleme,+ mpamba te Yeroboame+ ná bana na ye balongolaki bango na mokumba+ mpo básalela Yehova lisusu te mosala ya banganga-nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto