Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 21:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe soki moto asilikeli moninga na ye kino koboma ye na mayele mabe,+ okozwa ye mpo akufa, ata soki azali na etumbelo na ngai.+

  • Kolimbola Mibeko 19:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Kasi soki moto moko azali koyina+ moninga na ye, mpe abatami mpo na kozela ye mpe atɛlɛmɛli ye mpe abɛti molimo na ye na ndenge ya liwa mpe akufi,+ mpe moto yango akimi na moko ya bingumba yango,

  • Nzembo 10:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Azali kobatama pembeni ya bamboka;

      Longwa na bisika ya kobombana akoboma moto oyo asali likambo te.+

      ע [ʽAyin]

      Miso na ye ezali kotala mpo na kokanga moto ya mawa.+

  • Masese 1:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Na yango, bazali kobatama mpo na kosopa makila na bango;+ bazali kobombana mpo na kokwela milimo na bango.+

  • Marko 6:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Kasi Erodiadi akangelaki ye nkanda+ mpe azalaki koluka koboma ye, kasi azalaki kokoka te.+

  • Misala 23:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe likambo ya ntina koleka, kolinga te bándimisa yo, mpo mibali na bango koleka ntuku minei (40) batyeli ye motambo,+ mpe balapi ndai ete bakolya te mpe bakomɛla te soki babomi ye naino te;+ mpe bamibongisi sikoyo, bazali kozela kaka elaka euta na yo.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto