Balevi 5:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto amemi ngambo mpo na moko ya makambo yango, asengeli koyambola+ ndenge oyo asali lisumu. Yosua 7:19 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 19 Bongo Yosua alobaki na Akana boye: “Mwana na ngai, nabondeli yo, pesá Yehova Nzambe ya Yisraele+ nkembo mpe yambolá epai na ye,+ mpe yebisá ngai,+ nabondeli yo: Likambo nini osali? Kobombela+ ngai yango te.” Nzembo 32:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te.+Nalobaki ete: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.”+Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.+ Sela. Yakobo 5:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Yango wana, bóyambolaka+ masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelelanaka, mpo bóbikisama.+ Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.+
5 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: soki moto amemi ngambo mpo na moko ya makambo yango, asengeli koyambola+ ndenge oyo asali lisumu.
19 Bongo Yosua alobaki na Akana boye: “Mwana na ngai, nabondeli yo, pesá Yehova Nzambe ya Yisraele+ nkembo mpe yambolá epai na ye,+ mpe yebisá ngai,+ nabondeli yo: Likambo nini osali? Kobombela+ ngai yango te.”
5 Nsukansuka nayambolelaki yo lisumu na ngai, mpe nabombaki libunga na ngai te.+Nalobaki ete: “Nakoyambolela Yehova makambo na ngai ya kobuka mibeko.”+Mpe yo moko olimbisaki libunga ya masumu na ngai.+ Sela.
16 Yango wana, bóyambolaka+ masumu na bino polele na kati na bino mpe bóbondelelanaka, mpo bóbikisama.+ Lilɔmbɔ ya moyengebene ezalaka na bokasi mingi ntango ezali kosala mosala.+