22 Bongo Arona atombolaki mabɔkɔ na ye epai na bato mpe apambolaki bango+ mpe akitaki nsima+ ya kopesa likabo mpo na lisumu ná likabo ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
8 “Na ntango yango, Yehova atyaki libota ya Levi+ pembeni mpo na komema sanduku ya kondimana ya Yehova,+ mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova mpo na kosalela ye+ mpe mpo na kopambola na nkombo na ye kino na mokolo ya lelo.+
5 “Mpe banganga-nzambe bana ya Levi basengeli kobɛlɛma, mpamba te bango nde bato Yehova Nzambe na yo aponá mpo na kosalela ye+ mpe kopambola+ na nkombo ya Yehova mpe monɔkɔ na bango nde ekosilisa kowelana nyonso oyo etali likambo nyonso ya koboma moto.+