12 Mpe yo, olobaki ete: ‘Ya solo mpenza nakosalela yo malamu mpe nakokómisa momboto na yo lokola bambuma ya zɛlo ya mbu oyo ekoki kotángama te, mpo eleki ebele.’”+
8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+
7 Mpe nakozwa bino mpo bózala bato na ngai,+ mpe nakozala solo Nzambe na bino;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nzambe na bino, oyo azali kolongola bino na mikumba ya kilo ya Ezipito.+