31 Mpe mokumba+ na bango ezalaki Sanduku+ ná mesa,+ etɛlɛmiselo ya miinda+ ná bitumbelo,+ bisaleli+ ya esika mosantu oyo bazalaki kosala na yango mosala, ná elamba ya kozipa,+ ná mosala na yango nyonso.
12 Mpe basengeli kozwa bisaleli+ nyonso ya mosala oyo basalaka na yango mosala ntango nyonso na esika mosantu, mpe basengeli kotya yango na elamba ya bulé mpe kozipa yango na ezipeli oyo esalemi na mposo ya nyama ebengami fɔkɛ+ mpe kotya yango likoló ya nzete ya komema.