35 Mpe nkumu ya ndako ya batata ya mabota ya Merari ezalaki Zuriele mwana ya Abihaile. Bazalaki kotya kaa na mopanzi ya tabernakle oyo ezali na nɔrdi.+
38 Mpe baoyo bazalaki kotya kaa liboso ya tabernakle na ɛsti, liboso ya hema ya kokutana epai moi ebimaka, ezalaki Moize ná Arona ná bana na ye ya mibali, baoyo bazalaki kokokisa mokumba ya esika mosantu,+ oyo ezalaki mokumba ya bana ya Yisraele. Mpe mopaya nyonso oyo akobɛlɛma, akobomama.+