Kobima 17:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 Mpe bato babandaki koswanisa Moize mpe koloba ete:+ “Pesá biso mai mpo tómɛla.” Kasi Moize alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali koswanisa ngai? Mpo na nini bozali kaka komeka Yehova?”+ Nzembo 95:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Ntango bankɔkɔ na bino bamekaki ngai;+Bamekamekaki ngai, bamonaki mpe mosala na ngai.+ Nzembo 106:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Kasi na esobe, bamonisaki mposa na bango na lokoso+Mpe bamekaki Nzambe na esobe.+ Baebre 3:16 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 16 Mpo banani bayokaki mpe atako bongo batumolaki nkanda makasi ya Nzambe?+ Ezalaki bato nyonso oyo babimaki na Ezipito na litambwisi ya Moize, boye te?+
2 Mpe bato babandaki koswanisa Moize mpe koloba ete:+ “Pesá biso mai mpo tómɛla.” Kasi Moize alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali koswanisa ngai? Mpo na nini bozali kaka komeka Yehova?”+
16 Mpo banani bayokaki mpe atako bongo batumolaki nkanda makasi ya Nzambe?+ Ezalaki bato nyonso oyo babimaki na Ezipito na litambwisi ya Moize, boye te?+