2 Mpe Yehova alobaki na Moize boye: “Lobá na Arona ndeko na yo ete akɔtaka ntango nyonso te na esika mosantu+ na nsima ya rido,+ liboso ya ezipeli oyo ezali likoló ya Sanduku, mpo akufa te;+ mpo nakomonana na lipata+ likoló ya ezipeli.+
12 “Mpe asengeli kozwa eloko ya kotya mɔtɔ+ oyo etondi na makala ya mɔtɔ oyo euti na etumbelo+ oyo ezali liboso ya Yehova, mpe mabɔkɔ+ na ye mibale etondi na putulu ya mpaka ya malasi+ ya nsolo kitoko, mpe asengeli koya na yango na nsima ya rido.+
7 kasi na eteni ya mibale kaka nganga-nzambe monene ye moko nde azalaki kokɔta mbala moko na mbula,+ azalaki kokɔta te soki azali na makila te,+ oyo azalaki kopesa mpo na ye moko+ mpe mpo na masumu oyo bato bazalaki kosala kozanga boyebi.+