32 Mpe Arona ná bana na ye ya mibali basengeli kolya+ mosuni ya mpate-mobali yango ná mampa oyo ezali na kati ya kitunga, na monɔkɔ ya hema ya kokutana.
16 Mpe ndambo na yango oyo etikali, Arona ná bana na ye ya mibali bakolya.+ Ekolyama lokola bagato+ ezangá levire, na esika mosantu. Bakolya yango na lopango ya hema ya kokutana.
13 Mpe bosengeli kolya yango na esika mosantu,+ mpamba te yango ezali pɔsɔ na yo mpe pɔsɔ ya bana na yo ya mibali oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ; mpo ezali ndenge wana nde nazwi mitindo.