26 “‘Kasi mwana ya liboso ya banyama, oyo ebotami lokola mwana ya liboso mpo na Yehova,+ moto moko te akosantisa yango. Ezala ngɔmbɛ-mobali to mpate, yango ezali ya Yehova.+
13 Mpo mwana nyonso ya liboso azali ya ngai.+ Na mokolo oyo nabɛtaki mwana nyonso ya liboso na mokili ya Ezipito,+ nasantisaki mpo na ngai mwana nyonso ya liboso na Yisraele banda na moto tii na nyama.+ Bakokóma ya ngai. Ngai nazali Yehova.”