Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 34:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe azalaki kaka kuna elongo na Yehova mikolo ntuku minei (40) butu moi. Alyaki limpa te mpe amɛlaki mai te.+ Mpe abandaki kokoma na bitanda maloba ya kondimana yango, Maloba Zomi wana.+

  • Mitángo 12:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe moto yango Moize azalaki na komikitisa+ mingi koleka bato nyonso oyo bazalaki na mabele.

  • Malaki 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Talá! Nazali kotinda mo-memi-nsango na ngai,+ mpe akobongisa mpenza nzela liboso na ngai.+ Mpe Nkolo ya solosolo+ oyo bino bozali koluka akoya pwasa na tempelo na Ye+ ná momemi-nsango+ ya kondimana+ oyo bino bozali kosepela na ye.+ Talá! Ye akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.+

  • Matai 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nsima ya kokila bilei mikolo ntuku minei (40) butu moi,+ ayokaki nzala.

  • Matai 11:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bókamata ekanganeli+ na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai,+ mpo ngai nazali na ezaleli ya boboto+ mpe na komikitisa na motema, mpe milimo na bino ekopema.+

  • Luka 24:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe alimbwelaki bango makambo na ye na kati ya Makomami nyonso, banda na Moize+ tii na Basakoli nyonso.+

  • Luka 24:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Sikoyo alobaki na bango ete: “Oyo ezali maloba nalobaki na bino ntango nazalaki naino elongo na bino,+ ete makambo nyonso oyo ekomamá mpo na ngai na mibeko ya Moize mpe na Basakoli+ mpe na Nzembo+ esengeli kokokisama.”

  • Yoane 5:46
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 46 Ya solo, soki bondimaki Moize bolingaki mpe kondima ngai, mpo ye akomaki makambo etali ngai.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto