15 Mpo na bana ya Yisraele mpe mpo na moto oyo afandi mopaya+ mpe mpo na moto oyo autá na mboka mosusu, oyo azali kati na bango, bingumba motoba wana ekozala ekimelo, mpo moto nyonso, oyo abomi molimo na nko te akima kuna.+
42 mpo mobomi-moto oyo abomi moninga na ye kozanga koyeba,+ nzokande azalaki koyina ye liboso te,+ akima kuna; mpe asengeli kokima na moko ya bingumba yango mpe kozala na bomoi,+