Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 22:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Mpe osengeli te komonisa moto oyo afandi mopaya mpasi to konyokola ye,+ mpo bino bokómaki kofanda bapaya na mokili ya Ezipito.+

  • Yirimia 7:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpo soki bokómisi mpenza banzela na bino mpe misala na bino malamu, mpe soki bokati mpenza makambo na bosembo kati na moto ná moninga na ye,+

  • Zekaria 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bósambisaka na bosembo ya solosolo;+ mpe bómoniselanaka motema boboto+ mpe motema mawa;+

  • Malaki 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto