17 Bato nkóto (1 000) bakolɛnga na mpamela ya moto moko;+ na mpamela ya bato mitano bokokima kino bokotikala lokola likonzí ya molai na nsɔngɛ ya ngomba mpe lokola elembo na ngomba moke.+
20 Bana na yo bakosenzwa.+ Balalilali na ebandeli ya babalabala lokola bampate ya zamba na kati ya monyama,+ lokola bato oyo nkanda makasi ya Yehova+ ná mpamela ya Nzambe na yo, esopaneli bango mpenza.”+
15 Mpe okokóma mpenza eloko ya nsɔni+ mpe eloko ya kofinga,+ ndakisa mpo na kokebisa+ mpe nsɔmɔ mpo na bikólo oyo ezali zingazinga na yo, ntango nakopesa bitumbu epai na yo na nkanda mpe na nkɛlɛ mpe nakopamela yo na nkɛlɛ.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.