Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 ngai, ɛɛ ngai, nakosalela bino makambo oyo: nakoyeisela bino etumbu ya kotungisama na tibɛrkiloze+ ná fiɛvrɛ makasi, oyo ekobebisa miso+ mpe ekolɛmbisa molimo.+ Mpe bokolona mpenza mboto na bino kaka mpamba, mpo banguna na bino bakolya yango.+

  • Kolimbola Mibeko 28:51
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 51 Mpe bakolya mpenza bana ya banyama na yo ya mboka mpe mbuma ya mabele na yo kino okosila,+ mpe bakotikela yo molona te, vinyo ya sika to mafuta te, bana na yo ya ngɔmbɛ to bana na yo ya mpate te, kino bakobebisa yo.+

  • Nehemia 9:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 mpe mbuma na yango etondi beboo+ mpo na bakonzi+ oyo otyelaki biso mpo na masumu na biso,+ mpe bazali kokonza nzoto na biso mpe banyama na biso ya mboka, ndenge balingi, mpe tozali na mpasi monene.+

  • Yisaya 1:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mokili na bino etikali mpamba,+ bingumba na bino etumbami na mɔtɔ;+ bapaya+ bazali kolya mbuma ya mabele na bino+ na miso na bino, mpe libebi yango ezali ndenge bapaya babebisaka.+

  • Yirimia 5:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Ya solo mpenza, bakolya mpe mbuma oyo obuki na bilanga na yo mpe limpa na yo.+ Bato yango bakolya bana na yo ya mibali mpe bana na yo ya basi. Bakolya bitonga na yo ya bampate mpe bitonga na yo ya bangɔmbɛ. Bakolya nzete na yo ya vinyo mpe nzete na yo ya figi.+ Bakopanzapanza na mopanga bingumba na yo oyo ebatelami makasi, oyo ozali kotyela motema.”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto