-
Balevi 26:36Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
36 “‘Bongo baoyo bakotikala na kati na bino,+ nakoyeisa mpenza kobangabanga na mitema na bango na mikili ya banguna na bango; mpe makɛlɛlɛ ya lokasa oyo mopɛpɛ ezali komema epai na epai ekokimisa mpenza bango, mpe bakokima mpenza liboso ya mopanga mpe bakokwea, nzokande moto moko te azali kolanda bango.+
-
-
Ezekiele 12:19Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
19 Mpe osengeli koloba na bato ya mokili yango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bato ya Yerusaleme oyo bazali na mabele ya Yisraele:+ “Bakolya limpa na bango na motema likoló, mpe bakomɛla mai na bango na nsɔmɔ, mpo mokili na bango etikala mpamba, ezanga nyonso oyo ezalaki na kati na yango+ mpo na mobulu ya baoyo nyonso bazali kofanda na kati na yango.+
-