Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 31:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe ekosalema mpenza boye: ntango makama mingi mpe bampasi mingi ekokwela bango,+ loyembo oyo esengeli kozongisa maloba liboso na bango lokola motatoli, mpamba te monɔkɔ ya bana na bango esengeli kobosana yango te, mpo nayebi malamu mposa+ oyo bazali kokolisa lelo liboso nakɔtisa bango na mokili oyo nalapelaki ndai.”

  • Kolimbola Mibeko 32:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Nakobakisela bango mpasi minene;+

      Nakosilisela bango makula na ngai.+

  • Nehemia 9:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpo na yango, opesaki bango na lobɔkɔ ya banguna na bango,+ oyo bazalaki komonisa bango mpasi;+ kasi na ntango ya mpasi na bango, bazalaki kobelela yo,+ mpe yo ozalaki koyoka bango kuna na likoló mpenza;+ mpe mpo na motema mawa mingi+ oyo ozali na yango, ozalaki kopesa bango babikisi+ oyo bazalaki kobikisa bango na lobɔkɔ ya banguna na bango.+

  • Masese 1:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 ntango eloko oyo bozali kobanga ekoya lokola mbula ya mopɛpɛ makasi, mpe likama na bino ekoya lokola mopɛpɛ makasi,+ ntango mpasi ná bantango ya mikakatano ekoyela bino.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto