Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 12:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo babandaki kobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi+ mpe balobaki boye: ‘Tosali lisumu,+ mpamba te totiki Yehova mpo na kosalela Babaala+ mpe bikeko ya Ashitorete;+ bongo sikoyo bikisá+ biso na lobɔkɔ ya banguna na biso mpo tósalela yo.’

  • 1 Samwele 12:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe bosengeli te kopɛngwa mpo na kolanda biloko oyo ezali ya solo te,+ oyo ezali na litomba ata moko te+ mpe oyo ebikisaka te, mpamba te ezali biloko ya solo te.

  • 1 Bakonzi 16:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 mpo na masumu nyonso ya Baasha mpe masumu ya mwana na ye Ela,+ masumu oyo basalaki mpe oyo batindaki Yisraele básala na ndenge basilikisaki Yehova Nzambe ya Yisraele na bikeko na bango ya mpamba.+

  • Misala 14:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe balobaki ete: “Mibali, mpo na nini bozali kosala makambo oyo? Biso mpe tozali bato+ oyo bazali na bolɛmbu+ ndenge moko na oyo ya bino, mpe tozali kosakola nsango malamu epai na bino, mpo bótika makambo wana ya mpamba+ mpe bóya epai ya Nzambe ya bomoi,+ oyo asalaki likoló+ ná mabele ná mbu mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto