Balevi 10:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Bongo Moize alobaki na Arona ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nasantisama+ na kati ya baoyo bazali pene na ngai,+ mpe nazwa nkembo+ na miso ya bato nyonso.’” Mpe Arona afandaki nyɛɛ. Balevi 22:32 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 32 Mpe bosengeli te kotuka nkombo na ngai mosantu,+ mpe nasengeli kosantisama na kati ya bana ya Yisraele.+ Ngai Yehova moto nazali kosantisa bino,+ Yisaya 8:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Yehova ya mampinga—ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu,+ mpe ye nde bosengeli kobanga,+ mpe ye nde Moto asengeli kolɛngisa bino.”+ Matai 6:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 “Yango wana, bosengeli kobondela boye:+ “‘Tata na biso na likoló, nkombo+ na yo esantisama.+
3 Bongo Moize alobaki na Arona ete: “Talá oyo Yehova alobi: ‘Nasantisama+ na kati ya baoyo bazali pene na ngai,+ mpe nazwa nkembo+ na miso ya bato nyonso.’” Mpe Arona afandaki nyɛɛ.
32 Mpe bosengeli te kotuka nkombo na ngai mosantu,+ mpe nasengeli kosantisama na kati ya bana ya Yisraele.+ Ngai Yehova moto nazali kosantisa bino,+
13 Yehova ya mampinga—ye nde Moto bosengeli kotalela ete azali mosantu,+ mpe ye nde bosengeli kobanga,+ mpe ye nde Moto asengeli kolɛngisa bino.”+