30 Mpe Samsone alobaki boye: “Molimo na ngai ekufa+ elongo na Bafilistia.” Bongo amigumbaki na makasi, mpe ndako yango ekwelaki bankolo ya lisangani mpe bato nyonso oyo bazalaki na kati na yango,+ na yango bato oyo abomaki na ntango ya liwa na ye balekaki oyo abomaki na ntango ya bomoi na ye.+