Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 3:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nazali kokita mpo na kobikisa bango na lobɔkɔ ya Baezipito+ mpe kolongola bango na mokili oyo bámata tii na mokili moko malamu mpe monene, na mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ na mboka ya Bakanana ná Bahiti ná Baamore ná Baperizi ná Bahivi mpe Bayebusi.+

  • Kolimbola Mibeko 4:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpo nazali kokufa na mokili oyo.+ Nazali kokatisa Yordani te, kasi bino bozali kokatisa, mpe bosengeli kozwa mokili malamu oyo.

  • Kolimbola Mibeko 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 mokili moko oyo Yehova Nzambe na yo azali kobatela. Miso+ ya Yehova Nzambe na yo ezali ntango nyonso likoló na yango, uta na ebandeli ya mbula kino na nsuka ya mbula.

  • Ezekiele 20:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Na mokolo yango, natombolaki lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki bango ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nanɔngelaki bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto