5 Mpe sikoyo soki bokotosa+ mpenza mongongo na ngai mpe bokobatela mpenza kondimana na ngai,+ bokokóma mpenza eloko na ngai moko kati na bato ya bikólo mosusu nyonso,+ mpo mabele mobimba ezali ya ngai.+
26 Mpe nabandaki kobondela+ Yehova mpe koloba ete: ‘Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, kobebisa bato na yo te, ɛɛ eloko na yo moko,+ oyo osikolaki na bonene na yo, oyo obimisaki na Ezipito+ na nguya ya lobɔkɔ na yo.+
53 Mpo yo moko nde okabolaki bango na bato ya bikólo nyonso ya mabele mpo bázala libula na yo,+ ndenge olobaki na nzela ya Moize+ mosaleli na yo ntango obimisaki bankɔkɔ na biso na Ezipito, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”